Album Cover Moponami

Moponami

Mike Kalambay

4

Baponami tososola

Nazali elembo ya bolingo ya Nzambe

Nazali elembo ya bolingo ya NzambeAlingaki nga aponaki nga eh

Po nga na zala mwana na Nzambe

Alingaki nga aponaki nga eh

Po nga na zala ya nga na ya ye ehh

(Pasi oyo esengelaki nga na mona tala masiya amemi yango ebongo somo ewuta nga lisusu wapi)

Na ponama na Nzambe na lingama na Nzambe na yebana na Nzambe

Nga moponami

Ata lelo motema na nga eko komona pasi

Epayi ya Papa nga na zalaka heritier

Ah nga na bela Il est toujour pres de moi

Soki na leli Il vient me consoler

Na maloba na ye oyo etonda bilaka

Pona nga eh moponami na ye

Alobaki na nga na banga eloko te

Oyo aza kati na nga aleki na nguya

Abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili

Ba nguna na nga ata boye ebele

Kaso boyebaka naza plus que vainceur

Na maboko na ye je suis en securité

Moko te akoki kosimba nga

Po na sima na nga awa

Ba gardes bazali oyo baleki ata ba gardes presidentielle

Ba angelu na lola ils sont a mon service

Pona kobatela bomoi na nga

Ata bomemi kombo na nga eh na nzela ya molili ekosimba te

Ata batieli nga mitambo nzela nzela po nga na kweya eza nul et sans effect

Po alobaki na nga eh na banga eloko te oyo aza kati na nga aleki na nguya

Abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili

Ya azali elombo ya bolingo ya Nzambe

Ya azali elembo ya bolingo ya Nzambe

Na miso na Nzambe na za na motuya na ndako ya Papa nga nazalaka vase d′honneur po na zalaka mwana na kati ya palais royal pe libula na nga kala te ezo lata nzoto

Siki pe masumu eh nga na kweya te po bimoyi na nga na kaba na Nzambe

Nga nq boyi na bebisa identité caché na nga ya mosali na Nzambe moponami ya Papa

Ah nga na boyi na bebisa ya nga lokumu eh ya mwana na Nzambe prince heritier ya Papa

Naza moto mokila te

Nga na kodefisa na kodefa te

Naza na mokili kasi ya mokili te

Kala mingi ye shilo aza koya likolo ya mapata lokumu ya boNzambe lobiko ya basantu yango ebelemi

Ya tina nini nga na boya Nkolo ya nga

Po bisengo ya mokili eza infemer

Iyo lele (wa wa wa)

Nkolo na nga ah (wa wa wa)

Na yebi okoya hee (wa wa wa)

Mopanga na nga he (wa wa wa)

Nkolo na nga (wa wa wa)

Motema na nga eh (wa wa wa)

Bilingo ya motema na nga (wa wa wa)

Ah Nzambe

Alobaki na nga ah mwana kibanga te

Oyo aza kati na yo aleki na nguya

Abakisi lisusu akozala na nga kino suka ya mokili

Ya azali elombo ya bilingo ya Nzambe

Ya zali elembo ya bolingo ya Nzambe

Babengami ebele baponami nde mukie

Elembo ya ngolu ya Nzambe na boya ye

Sur la terre de humains na kobanga eloko te po na simbami na oyo aleki na nguya

Yaaaaweh

Yaaaaweh

Yaaaaweh

Hmm Jesus

Nzambe sosolisa nga mokano na yo po na kende te pembeni ya tina oponelaki nga eh

Po nga nazali na nga mopaya pe moleki nzela na se ya moyi

Etikali mokie Nkolo na nga ozanga

Kuna epayi ozali sala nga pe na koma

Awa ngai wa yo motema posa na yo

Ayoo ah ah

By BERRNICE KIDIWA

Lagu lain oleh Mike Kalambay